

« Tata, … bazala se moko, mpo’te bato ba nse bayamba ‘te otindi ngai»
(Yoane 17,21)
Mokanda mwa Tata Episkopo mpo ya mobu mwa Eklezia 2006-2007(mobu C)
0. EBANDELA- Bandeko mpe bana ba bolingo o Yezu Kristu, mobu mwa liturgia ya sika mosili kobanda. Mwango nde Mobu C. Tokoti o mwango mwa 03 sanza ya 12, mobu 2006. Mobu mona mokosila ma 25 sanza ya 11, 2007. Yango nde eleko enene ya ngrasya Nzambe Tata akokabela biso o Elimo Santu
- Bôngo, tokani kotindela bino mokanda moye o ebandela ya mobu mwango, mpo ya kolendisa bino ‘te bokola o bomoko. Bo momeseno, bokolanda manaka maye Eklezia ya molongo mpe eye ya Ekolo ya biso Congo epesi. Nzokande, o Eklezia ya biso ya Isiro-Niangara, tokobakisa mpe ntomo isusu iye ikangemi na mobu touti kosakola. Ya solo, ntomo îna tosakolaki yango o mwa 31 sanza ya 12, 2006, o misa esantu eye tobonzelaki na paroisse Santu Anna ya Isiro-Gossamu mpo ya bosepeli eyenga enene ya Libota Lisantu.
- Mokanda moye mokopesa biso libaku lya kozongela maye tolobaki na bakristu ba paroisse Santu Anna. Na bosali bongo, ntembe te, tokanisi ‘te tokokokisa lotomo tozwi ya koyangela Eklezia ya biso Isiro-Niangara; Nzokande, etinda tokopesa na mokanda moye euti bobele na biso moko te; euti na likita lisangisaki biso na boko ba-Curés o mwa 05 sanza ya 12, 2006, o ndako ya bokutani (réunion) ya évêché.
- Bôngo, o mokanda moye, tolingi kolimbolela bino masengisi maye matali lolenge tokokola o bomoko to o boeklezia ya biso. Yango wana, maloba ma ntina mpe ma boyambi tokolobela bino o ebandela mango maye: “Eklezia ya Isiro-Niangara, pusa kozala libota lya Nzambe o bokolisi bomoko!”
- Na bokuse, maloba maye ma bolimboli makosenge biso ‘te tolakisa mpiko o:
- bobengani bokabwani
- bolakisi bondeko o kati ya biso
- bokokisi masengisi topesi mpo ya mobu moye mwa Eklezia.
Kasi yambo ‘te tokoto o bozindo bwa masengisi mâna, bondima ‘te tokundolela bino naino biteni-mabota maye makokisi Eklezia ya biso “Isiro-Niangara”.
I. BITENI-MABOTA BYA EKLEZIA YA BISO- Ntembe te, “Eklezia Isiro-Niangara” ezali se lisanga lyoko!, liboke lyoko! Kasi lisanga lîna likokisami na biteni-mabota ebele! Soko tomeki koyeba motango mwa bango, tokotanga biteni-mabota biye:
- Eteni-mabota ya yambo ekokisami na bandeko baye bakosangisa Eklezia ya biso na eye ya Molongo mobimba. Bandeko bâna nde bandeko basi mpe babali baye bamipesi o bomoi reliziozo o kati ya mangomba maye makoyangelama na bakonzi baye bazali o mboka Roma (na Mpoto). Wana tokozwa: banyango,basango mpe bafrères ba lingomba lya Santu Comboni, banyango-Dominicaines ya Grenada (bazwami o Isiro-Magambe), banyango ba Motema Mosantu mwa Yezu (o paroisse ya Neisu), basango mpe bafrères ya “Religieux de Saint Vincent de Paul”, basango mpe bafrères ya Institut missionnaire de la Consolata, bafrères ya Instruction Chrétienne (baye bakobolo bomoto mpe mayele engebene na eyamba katoliko), basango mpe bafrères Dominicains ya Sous-Province ya Congo-Kinshasa, nâ mpe bandeko ba COE (Lingomba lya bandeko bakomipesa mpo ya botambolisi mosala mwa bobokoli to éducation).
- Eteni-mabota ya ibale ekosangisa Diocèse ya Isiro-Niangara na Eklezia na Eklezia ya Africa mpe na eye ya Ekolo ya biso Congo. Tokozwa wana mangomba matano: banyango baye tokobengaka na lompoto “Petites Soeurs de l’Evangélisation” (banyango-baléki ya bopalinginyi Nsango Elamu) ba Diocèse ya Wamba; basango ba Diocèse ya Wamba; banyango Dominicaines Missionnaires d’Afrique ba Diocèse ya Byumba (Rwanda); banyango ba Libota Lisantu ya Kisangani mpe banyango ba lingomba lya Santu Augustino ya Dungu-Doruma.
- Eteni-mabota ya isato mpe ya suka esangisi ebele ya bana ba Eklezia ya biso. Bango bakangani na Diocèse o nzela ya mibeko mya Eklezia (incardination) to o nzela ya sakramentu ya batisimo. Bandeko bakangemi na Diocèse Isiro-Niangara o nzela ya incardination to droit diocésain bango baye : Lisanga lya Episkopo nâ basango ya Diocèse to ba-Abbés; Banyango Dominicaines Filles de Sainte Catherine de Sienne, nâ Banyango bana basi ba santu Dominiko (Filles de Saint Dominique). Nzokande, bandeko bakangemi na Diocèse Isiro-Niangara o nzela ya sakramentu ya batisimo bazali bakristu banso baye bazwami o ba-régions pastorales babale ba biso, o badoyennés, baparoisses, o ba-CEV mpe e mabota manso mazali o kati ya “Eklezia Isiro-Niangra”.
- Talani bandeko mpe bana ba bolingo, bayekoli ba Mokonzi Yezu Kristu, baye bakokisi o eleko eye Eklezia ya biso “Isiro-Niangara”. Tozwi wâna mabota ndenge na ndenge; bandeko bakoulana na bafulele ba ndenge inso. Tozali bato baye bakolakisa bokeseni o kati ya bango. Bokeseni bôna bouti na ndenge ya biso ya kofanda, ya kobika mpe na mimeseno mya biso. Soko(makambo) manso matamboli malamu, bokeseni boye tokomona o ntei ya biso, esika ‘te bokabola biso, bokopesa biso nde makoki ma kosalisana biso na biso. Mpamba ‘te bokeseni bwa ndenge boye bozali nde mosolo mpe bokopesa nguya nâ makoki ebélé.
II. KOBENGANA BOKABWANI- Kasi tokeba! Bokeseni bozalaka bobele libaku ya kosalisana te. Mbala mosusu, bokeseni bokoki mpe kopesa bokabwani. Ekosalema bôngo soko tomikomisi baombo ba mabe, soko makanisi mabe mabebisi bwanya mpe mitema mya biso. O ntango ena, bokeseni bokozala ntina ya esengo lisusu te. Mabongi mpe makoki tokomono epai ya bandeko, esika ‘te esepelisa biso, ekopesa biso nde mpasi mpe nkanda to zuwa. Tokobanda kolukelana makmbo o kati ya biso, koboyana mpe koyinana.
- Tokoki mpe kowangana te ‘te makambo ma lolenge boye mazalaka o nntei ya biso. Kutu tokomonoko mango na miso. Nzokande, mpo ya biso baye tokokisi Eklezia ya Isiro-Niangara, kokola o bomoko, o mobu moye mwa Eklezia, ekozala nde kobunda na maye manso makoki kokabola biso: bomilingi, lolendo, boponi bilongi, ...
III. KOKOLISA BOMOKO MPE BONDEKO- Mpo topusa kozala “Eklezia libota lya Nzambe” ebongi bobele te ‘te tobengana ntina ya bokabwani o kati ya biso. Ebongi na biso mpe tokokisa maye manso makokolisa bomoko o kati ya biso. Kolakisana bondeko mpe kokolisa boyokani, komilakisa penepene na bandeko banso mpe koluka kosangisa bato. Toluka kosala manso mpo ‘te ba-CEV ba biso, baparoisses ba biso, badoyennés ba biso, mangomba to masanga ma biso, bayebana o kati ya bango, basalisana mpe basala mosala esika yoko, mpo ‘te Eklezia ya biso ekola bo Libota lya bana ba Nzambe. Tomipesa mobimba o bomekoli ezalela ya kitoko tokomono epai ya bakristu ba yambo: “bazalaki na molende o bolandi mateya ma bapostolo, bazalaki lisanga, babukaki mampa mpe basambelaki lisanga” (Bikela 2, 42). Ya solo, mpo ya biso, tokoki koluka nzela epai esusu te; Mpe biso banso toyebi ‘te Yezu Kristu Yemei alulaki mpe asambelaki mpo ya bondeko mpe bomoko o kati ya biso : “Tata,.. bazala se moko, mpo ‘te bato ba nse bayamba ‘te otindi ngai” (Yoane 17,21).
IV. MIBEKO MYA EKLEZIA YA BISO MPO YA MOBU MOYE- Mobu mwa Eklezia moye tobandi kosepela ut’o mwa 03 sanza ya 12, 2006, mozali likambo lya motuya mpenza. Tosengeli kolekisa mwango bobélé na bokokisi masengisi touti kosakola te. Masengisi masusu mazali, maye tokotanga “Mitindo mya Eklezia ya Isiro-Niangara”. Tokotanga mango bôngo, zambi mitindo mîna misengeli kotosama na lisalisi lya Eklezia ya biso. Elingi koloba ‘te bakristu banso bakomipesa na bokokisi myango na lisalisi lya boko bayangeli ba Diocèse: bayangeli baye bazali zongazonga ya Episkopo, nâ baye bazwami o Région pastorale ya biso, o Doyenné ya biso to o paroisse ya biso. Mitindo mîna mizali libwa. Nakolakisa myango na bokuse awa.
- Bokuli basakramentu iye ikokotisaka o Eklezia (sacrements de l’initiation: baptême, communion et confirmation): awa nalingi bobele kokundola yoko ya mikano mya Assemblée Pastorale ya sanza ya ibale 2006. Na bokutani bosantu bôna, endimamaki ‘te Directoire eye ebimisamaki mpo ya basakramentu iye ikokotisaka o Eklezia elandama na bokebi bipai binso o Diocèse. Botosi etinda ena ekopesa nzela ya kotala na nsima ndenge makambo masalemaki mpe komono ndenge kani tokoki kobongisa bokulisi basakramentu bâna. Nakosenge ‘te mokano moye mwa Assemblée pastorale molandama na banso o mobu moye mwa Eklezia.
- Botomboli mpe bokumisi sakramentu ya Libala lisantu. Mikakatano miyike miye mipekisaka bokuli sakramentu ya Libala lisantu na litomba mitungisaki batindami (délégués) o Assemblée pastorale. Makanisi mapesamaki mpô etali ndenge kani Episkopo nâ basalisi ba ye bakotia bakristu o nzela ya bolongi mikakatano myango. Na bozeli mokanda moye tokokoma mpo etali sakramentu ya libala mpe mingi mpenza mpo etali mosolo mwa libala (dot), tokosenge na bakristu banso, o ba-CEV, chapelles to paroisses ya biso, ‘te bamipesa mpenza o bolengeli mpe bolendisi bato ba libala (pastorale familiale). Banganga-Nzambe, banyango mpe bafrères banso batia maboko mpo ya kotombola lingomba lya Libota Esengo. Bakristu banso baluka koyeba likanisi lya Nzambe likolo lya mosolo mwa libala mpe bakokisa lyango.
- 17. Yoko mikano mya Assemblée pastorale ekosenge ‘te tobimisa Directoire eye ekotambolisa mambi ma Renouveau charismatique catholique o Diocèse. Bobimisi Directoire ena bokosalema bobele na bayangeli ba Diocèse bango moko te. Bandeko baye bazali ba-membres ya Renouveau charismatique babyangami na kosangisa makanisi elongo na batindami ba Tata Episkopo bo bana ba libota lya Nzambe « Diocèse ya Isiro-Niangara ». Mobu moye mwa Eklezia mozali eleko kitoko ya bokokisi etinda ena.
- Kokolisa to kobokolo eyamba katoliko o biteyelo bya biso (Ecoles Conventionnées Catholiques): yango ekosalema ndenge kani ? Ya solo, ekosalema yambo mpenza na bosambeli misa esantu engebene na manaka maye : eteyelo na eteyelo mbala yoko to koleka na sanza yoko. Bobokoli eyamba katoliko o biteyelo bya biso bokosalema mpe na boteyi mateya ma religion bo ebongi, na bolendisi boyambi bwa bateyi to balakisi o nzela ya ba-récollections mpe na boyekolisi bana malongi. Tokosenge na balakisi ‘te balendisa bana, na maloba mpe ndakisa, na ntina ‘te bamipesa o mosala mwa Nzambe o kati ya paroisse, chapelle to CEV ya bango.
- Bosungi baye babyangami o bomoi reliziozo to o bonganga (pastorale de vocations). Ntembe te, boko basango, banyango mpe balaiki bazali komipesa na botosi lisengisi lîna. Nzokande, mpo mosala mwa bango mobota mbuma, basengeli naino lisusu kobongisa mpo etali makambo masusu maike. Ndakisa: bozangi informations likolo lya charismes ya mangomba maike ma ba-religieux; bolakisi ndakisa elamu te (mauvais témoignage) mpo ya baye bakoyoka mposa ya komipesa o mosala mwa Nzambe.
- Bokolisi mayele mpe bwanya bwa bakatekista mpe bayangeli ba CEV ba biso. Mbongwama elongobani kosalema mpe na maye matali mokumba moye. Mingi mpenza mpo etali manaka to programme ya kelasi o ba-centres catéchétique mpe pastoral ya Nangazizi mpe Dondi; mpe na ndenge ya kosala ba-sessions ya mateya o ba-paroisses. Mobu mwa Eklezya mokopesa biso libaku lya kobongisa o bisika bina.
- Ba-conseils ya ndenge nyoso ya apostolat: conseil pastoral, conseil pédagogique, conseil pour les affaires économiques. Sika boye, tokoki koloba te ‘te ba-conseils ina izwami bipai binso, ‘te itambolisaka misala bo ebongi, ‘te ba-membres basili kokolisa bwanya bwa bango malamu mpo ya misala ! Mobu moye mokosenge biso ‘te totombola misala mya ba-conseils o ba-paroisses ya biso.
- Bolongi etumba ya koyeba kotanga mpe kokoma te. Bamama mpe batata bayike bayebi kotanga mpe kokoma te ! Kutu tokozwa mpe bilenge ebélé bakotuta libaku libe liye. Tokoki kotala likambo lîna bobele na miso te. Esengeli tomeka kosalisa bandeko bâna mpo ’te bango lokola bayoka esengo ya koyeba kotanga mpe kokoma. Yango wana, tomeka mpe kosala « campagne ya alphabétisation » o ba-paroisses ya biso o mobu moye.
- Mambi ma dîme ya Diocèse. Mokumba mosusu mokotuta biso motema mozali moye mwa dîme ya Diocèse. Nakotanga yango “dîme ya Diocèse” mpamba te ekeseni na dîme eye tokosalaka to tobandi komeka kosala. Tokolimbolela bino yango o bozindo sima, na lisalisi lya ba-Vicaires Episcopaux ba biso. Kasi sikawa, nakoyebisa bino na bokuse boye mpo yango:
- Dîme tokopesa o Mobu moye mwa Eklezia etali bakristu banso o Diocèse : Episkopo, basango, banyango, bafrères mpe bakristu laiki banso bakomi bakolo. Bakristu bakolo nde baye bakuli bakuli basakramentu ya batisimo, Ukaristia mpe Nkotisa. Kasi baye balekisi mibu 12 mpe bakuli Nkotisa te, bazali mpe bakolo.
- Eloko tokopesa ezali mbongo. Moto moko na moko akopesa dollar yoko to koleka mpo ya mbula mobimba. Soko moto alingi kopesa contribution esusu, esengeli kozala eloko eye bakoki koteka mpo ‘te mbongo ezwama. Mbongo bakosangisa, ekotindama na Economat Diocésain, esika wapi tokofungola sanduku yam bongo to compte moko bobele mpo ya mosolo mwa dime.
- Comité représentatif ya Diocèse ekokelama, eye ekokamba misala tokosala na dîme wana. Comité yango ekokambama na Episkopo. Masalisi makouta na dime eye ya Diocèse makotala botomboli bomoi bwa Diocèse mobimba to eteni ya Diocèse eye ezali mpenza na bosengi makasi. Na suka ya mobu, Comité esengeli koyebisa na bakristu rapport ya lolenge dime epesamaki mpe mosala moye dime ena esali.
V. MPO YA BOSUKISI
Atâko kokisi Libota lya Nzambe ut’o kala, koluka kokoma lyango ekoki kosalema! Ezali kutu mobeko mokasi ‘te tomipesa na nguya enene mpo ya kokoma mpenza libota lya Nzambe. Zambi moto moko te o kati ya biso akoki koloba ‘te Bosato Bosantu bwa Nzambe bosepeli mpenza kotala lolenge tozali kolakisa elongi ya Ye. Na ntina ena, biso, Mokengeli mpata o Diocèse eye, na bondimi makanisi mapesamaki o mwa 05 sanza ya 12, mobu 2006, o mokolo mwa likita lya biso na book ba-curés ba biso, tozwi mokano mwa kosakola mobu mwa Eklezia moye, na boyebisi ndenge kani tokoki kolekisa mwango. Mposa mpenza ya motema mwa biso ezali ‘te na mobu moye Eklezia ya biso ya Diocèse Isiro-Niangara emonisa polele ezalela ya bana ba libota lyoko la bana ba Nzambe. Santu Ngondo Maria, Mama wa biso baleki ba Yezu Kristu, Santu Terezia wa Mwana Yezu, Mobateli wa liboso wa Eklezia ya biso, mpe Mw’Esengo Marie-Klementina Anuarite Nengapeta, Mobateli wa ibale wa Diocèse, basambelela biso mpo ‘te tokumisa Nzambe bo ebongi o nzela ya Mobu mwa Eklezia moosakolami.
Epesami o Isiro, mwa 31/12/2006,
O eyenga ya Libota Lisantu.
+ Julien ANDAVO MBIA,
Episkopo wa Isior-Niangara.
MALOBA MA BOBIMISI MOKANDA MWA EPISKOPO MPO YA MOBU MWA LITURGIA A
Ngai + Julien ANDAVO MBIA, Episkopo wa Dioseze ya Isiro-Niangara, mpo ya ngolu ya Nzambe mpe mpo ya boponi bwa bonsomi bwa Papa wa Roma;
Awa nandimaki na bonsomi bonso mpe na motema mobimba kokoma moyangali wa Eklezia ya Isiro-Niangara, mpo ya koteya bakristu banso Nsango Elamu ya Yezu Kristu, kosantisa bango o nzela ya basakramentu mpe koyangela o nkombo ya Kristu lisanga lya bango;
O ebandela ya mobu mwa liturgia moye, mobu A, nakomeli bino bana mpe bandeko ba ngai ba Isiro-Niangara, mokanda moye o nkombo ya Nzambe: “ Bobota ... mpe bobongisa mokili”(Eb. 1, 28). Nalingi ‘te mobu moye mozala mpo ya biso mobu mwa libala lisantu: totombola banso lotomo la libala lisantu.
Bandeko mpe bana ba bolingo, mokanda nakomeli bino mozali na biteni bibale. Eteni ya yambo ekoloba mpo ya libala liye lindimami na Nzambe. Eye ya ibale, ekolakisa mibeko tokolanda to mpe misala tokosala mpo ya kotombola libala lisantu.
O eteni ya yambo, tokoyanola na motuna moye: Nzambe akosepelaka na libala lya ndenge kani? Ya solo, mpo ya koyanola na motuna moye, tosengeli naino koyeba makambo manei ma motuya:
- Nzambe akeli moto, mobali na mwasi lolenge la Ye mpe atii o motema mwa ye bolingo bwa Ye. Alingi ‘te mobali na mwasi balingana lokola Ye Nzambe alingi bango mpe lokola Kristu alingi Eklezya, nzoto ya Ye. Yango wana, o kati ya bakristu, libala likoki kozala bobele liye libenisami na Nzambe: sakramentu.
- Libala lisantu lizali na biteni bibale: komilengele mpe kobika. Baye baponi bomoi bwa libala bayeba komilengele mpo ya yango na botosi mibeko mya mboka, Leta mpe Eklezya. Soko omilengeli malamu, okobika mpe libala malamu. Kokota o libala na mbango mbango te.
- O libala lisantu, mobali na mwasi bakofanda bobele mpo ya kosungana kati ya bango mpe kokokisa mposa ya nzoto ya bangomei te, kasi mpe mpo ya kobota bana, kokoba kokokisa mosala mwa Nzambe, mosala mwa kopesa bomoi. Obotaka bibotela te, kasi obotaka na mayele; oboma mwana oyo azali koya na bomoi te: ozila ye malamu. Mpe soko oboti te, ezali lisumu te.
- Bana boboti, boyebaka kobokolo bango malamu; bakola na nzoto mpe na bwanya mpo ‘te lobi batonga Ekolo mpe Eklezya ya biso. Bongo bakosepelisa Nzambe mpe bato.
Na bokuse, libala liye likosepelisaka Nzambe, liye Nzambe andimi, lizali liye likokokisa makambo manei maye touti kolakisa.
O eteni ya ibale ya mokanda moye, nabimisi mibeko miye tokolanda biso banso mpo tokoka kotombola lotomo la libala lisantu o Dioseze ya biso. Mibeko mîna mitali bosepeli libala lisantu, kobota, komeme mikumba o libala, kobokolo bana mpe koteya Nsango Elamu o libota.
- Mpo etali bosepeli libala lisantu: Baboti bakitisa mosolo mwa libala mokokana na makoki ma bato. Banganga-Nzambe bayamba o libala lisantu bato baye basilisi kopesa mosolo mwa libala; bayamba mpe baye bapesi eteni yoko ya mosolo môna mpe bandimi kosilisa mwango. Tolendisa mpe tosunga bipai binso baye baponi kobalana, ...
- Mpo etali kobota: epekisami na bakristu banso kosopa zemi to kosalisa basusu basopa yango. Banganga-Nzambe balekisa epai ya Episkopo, mpo ya ntubela, bakristu baye basali lisumu lya koboma mwana o libumu lya mama.
- Mpo etali mikumba o libala: biso banso tosalisa baboti mpo bakimaka mokumba mwa bango te to batikelaka basusu mwango te.
- Bobokoli: tobokoloko bana ba biso na ndenge ‘te bakola na nzoto mpe na bwanya mpe bayeba Nzambe. Tosalisa bango mpo ‘te bamiyeba mpe bayeba kobatela nzoto ya bango, eye ezali tempelo ya Elimo Santu, mpo ya kokumisa Nzambe mpe, ntango bakokoma bakolo, mpo ya kokokisa lotomo Nzambe apesi bango. Totikaka bango te bayengayengaka na bomoi bwa bosoni.
- Koteya Nsango Elamu o libota: baboti balakisa bana nzela ya Nzambe o libota. Balakisa bango losambo mpe basambela na bango lisanga. Balakisa bango kosalaka malamu.
Talani bana mpe bandeko ba bolingo, na bokuse, mibeko tokolanda o mobu moye mpo ya kotombola libala lisantu mpe bomoi o libota.
Nzambe apambola mabota ma biso, apambola baye bakozwa mokano mwa kotombola libala lisantu mpe bomoi o libota o kati ya Dioseze ya biso. Mama Santu Maria na Santu Yozefu basambela mpo ya mabota ma biso manso.
Esalemi o Isiro, mwa 02/12/2007,
O lomingo la 1 la boyei
+ Julien ANDAVO MBIA,
Episkopo wa Isior-Niangara.
........................................................................
MOBU MWA LITURGIA A,
MOBU MWA LIBALA LISANTU O DIOSEZE YA BISO
« BOBOTA…BOBONGISA MOKILI »
(Eb.1, 28)
Mokanda mwa Tata Episkopo mpo ya Mobu mwa Eklezya 2007-2008
EBANDELA
- Bakristu mpe bana ba bolingo, o Mobu mwa Liturgia mouti koleka, toponoki kokokisa mitindo ebele, atâko tobondoki bino o myango na likanisi-ntina se lyoko: “Bokolisi bomoko”. Sikawa tozali kotala lolenge kani tokokisaki mikumba mîna. Nzokande, ut’o mobu moye, tokobanda komibonda, mobu na mobu, se na likanisi mpe na lisengisi lyoko. Yango wâna, o Mobu moye mwa Liturgia tobandi, mobu A, eleki na malamu ‘te totombola bandeko baye balingi kobika to bazali kobika o Libala lisantu. Elingi koloba ‘te tosengeli mbula mobimba kosalisa baye batindami kokokisa lotomo loye louti na Nzambe: “Botota...; bobongisa mokili”(Eb. 1, 28). Mpo ya kokokisa etinda eye, biso banso tosengeli komipesa, ezala moto na moto, ezala masanga manso ma biso.
- Tokanisi komibondo na boyambi mateya ma motuya ndenge na ndenge. Mateya mayike makouta na Mikanda Misantu; mateya masusu mazwami o mikanda miuti na Eklezya; tobakisi mpe makanisi malongobani maye bato ba boyebi (sciences) bakoteyaka. Na bomanyoli mateya mâna manso, eleki malamu ‘te tosangisa makanisi ma biso mpo etali: libala lindimami na Nzambe mpe ndenge kani tokomeka o Mobu mwa liturgia A moye, kosalisa baye balingi kolongana mpe baye balongani.
I. LIBALA LINDIMAMI NA NZAMBE
- Lotomo loye toponi kotombola lozali na ntalo mpenza. Lotomo lango lofandi bobele likolo lya mambi ma bato te. Nzambe moto akolinga bongo. Mpo tomonisa bonene bwa yango, ebongi ‘te tolanda penepene makambo manei: 1°) libala lisantu nde likambo to eloko nini, lotomo la 2°) la kobalana, 3°) la kobota mpe 4°) la kobokola bana lozali mambi kani.
Libala lisantu nde nini
- Ntembe te: na botali na bokebi ndenge bato banso bakobika o mokili, moto akoki kozwa likanisi ‘te bobiki o libala bozali likambo lya liseke te. Likanisi lya boye lizali na ntina. Eklezya oyo azali moteyi monene akomonisa lyango polele na koloba ‘te “Bolamu bwa moto nyoso mpe bwa mboka inso bokotambola esika yoko na botombwami bwa bomoi o libala mpe libota” (GS 47, § 1). Lisanga lya bikolo libyangami “Nations Unies” lisakoli polele ‘te likoki liye lizali eteni yoko ya bonsomi bwa moto: “Moto moko te akoki kopekisa moninga wa ye abala mpo ya ntina ya ye, ekolo ya ye, eyamba ya ye” .
- Kasi tokoki komituna: libala liuti na bato? Mokristu katoliko akoyanola na motuna moye na kondima likanisi lya boye soko moke te. Mpamba te, Mikanda Misantu mikoteya ‘te Nzambe moto akeli libala. Ndakisa: o Buku ya Ebandela ekomami: “Moto apesi nyama inso nkombo...; naino azwi moninga te oyo akoki na ye. Na nsima Nzambe alalisi moto mpongi makasi; alongoli mokuwa moko o mopanzi... Na mokuwa alongoli o mopanzi mwa moto akeli mwasi mpe ayei na ye o miso ma mobali. Mobali agangi: ‘Solo tala mokuwa mwa mikuwa mya ngai mpe mosuni mwa misuni mya ngai’... Yango wâna mobali akotika tata na mama mpe akosangana na mwasi wa ye mpe bakokoma se moto moko” (Eb. 2, 20-24).
- O eleko ya ye, ntango ba-Farizeo bakomeka ye mpô andima likanisi libe lya kobebisa libala, Yezu Kristu akozongisela bango: “Botangi té ‘te o ebandela Mozalisi asalaka bato mobali na mwasi mpe boniboni alobaka: ‘bongo mobali akotika tata na mama wa ye; bango babale bakokoma se moto moko. Yango wana bazali lisusu babale te, kasi se moto moko. Bongo mpo ekangi Nzambe, moto akangola yango te’” (Mat. 19, 5-6). Kasi mwa nsima Yezu yemei akobakisa ‘te o Eklezya ya Ye, nzela ya ibale ezali mpo ya kolekisa bomoi awa o nse: kotika libala mpo ya Bokonzi bwa Likolo: “basusu bakoki libala te, zambi bango moko balingi bôngo mpo ya Bokonzi bwa Likolo” (Mat. 19, 12b).
- Nzokande tomikosa te: ezala bakristu bakobika o libala, ezala baye baponi kobika bomoi bwa libala te, moto oyo akoloba ‘te akoki kotika kozala mobali to mwasi ngonga yoko azali te. Tokelami mobali to mwasi mpo ya bomoi bwa biso mobimba. Bomwasi to bomobali bozali bobele likambo lya mposa ya nzoto te, kasi bokolanda ezalela ya moto bomoi bwa ye mobimba.
- Bobele o buku ya Ebandela, tokozwa liteya lisusu lya ntalo likolo lya lokumu la moto. Tokotanga kuna ‘te Nzambe akeli mobali na mwasi lokola Ye moko Nzambe azali (cf. Eb. 1, 27). Ye nta Bolingi, akeli mobali na mwasi na makoki ma kolingana. Kolingana kati ya bango esengeli kozala elembo ya Bolingi ndelo te ya Nzambe mpo ya bato. Bolingo o kati ya libala bozali kitoko o miso ma Nzambe (cf. Eb. 1, 31).
- Mpo ya bosukisi, mama wa biso Eklezya akoteya mpe biso ‘te libala lizali Sakramentu! Lizali liziba lya bomoi bosantu! Mpo ya kososola bo ebongi ntina Eklezya akotanga libala sakramentu, tosengeli koyeba mambi mabale. Ya yambo: O Eklezya Katoliko, libala lizali moko wa basakramentu nsambo bayekoli ba Kristu bakosepelaka. Mobali na Mwasi bakobala libala lisantu o boso bwa Nganga-Nzambe to Diakono oyo akobenisa bango; nzokande bangomei bazali bakulisi sakramentu êna. Ya ibale, libala lizali elembo ya bolingo bosangisi Kristu na Eklezya ya Ye. Yango ekotinda ‘te mobali alinga mwasi wa ye lokola Kristu akolingaka Eklezya. “Amikabi mpo ya yango” (Ef. 5, 25). Mobali amikaba na mwasi wa ye se bongo.
Lotomo la bosepeli Libala lisantu
- Maye touti kolimbola makotiya biso o nzela ya bolakisi malamu ndenge kani mobali na mwasi basengeli kolongana. Tokozongela Matangi Masantu tomanyolaki mpe tokobakisa matangi mpe mateya masusu.
- Liteya liye tosengeli kobosana awa te lizali liye likolakisa ‘te Nzambe akeli moto elili ya Ye, ndenge Ye moko Nzambe azali. O Mokanda mwa Santu Polo na bakristu ba mboka Roma tokotanga ‘te na bokuli batisimo, mobali na mwasi bakomi bato ba sika; bakomi bâna ba Nzambe. Bakobika lisusu te lokola bapagano (cf. Rm 6, 1-11). Botali mobombamo môna mokopesa bwanya kitoko likolo lya lokumu Nzambe akabeli moto. Awa o mokili, ekelamo ya koleka moto ezali te. Bobele moto azali na makoki ya kolinga lokola Nzambe, kokola o boyebi, o bokokisi mambi ndenge na ndenge. Elingi koloba ‘te moto – mobali to mwasi – azali na lokumu koleka bikelamo bisusu binso. Azali moyangeli mwa byango. Lokumu lôna lokotinda ye ‘te akokisa masengisi ndenge na ndenge.
- Yoko ya masengisi mâma etali bomilengeli mpo ya libala. Baye baponi bomoi bwa libala lisantu, basengeli kokeba na yoko yoko ya biteni bya komilengele. Babanda kobika lokola bato basili kobalana o eleko ya bomilengeli te. Bamipima mposa ya nzoto makasi mpô bakweya o boombo bwa yango te... Moto na moto amipesa na boyebi malamu nani akozwa bo bolongani wa ye; ayeba mikumba mya mobali to mya mwasi malamu. Baye bazali na ye lisanga (baboti, moyangeli wa CEV, moteyi, sango...) basengeli kosalisa ye mpo ‘te ayeba kotosa lotomo la libala malamu .
- Bino bilenge bokomilengele mpo ya libala lisantu: bokeba! baboti bakitisa bino o molongo mwa biloko te. Ekoki kozala bôngo ndakisa, soko baboti bapesi kilo mingi na mosolo bakozwa likolo lya bino bana basi (mosolo ya libala). Na mpe bino baboti, bokeba. Mposa ya mosolo etinda bino te na Kopekisa to kozongisa nsima mingi libala lisantu lya bana ba bino. Soko bosali bôngo, bokolakisa ‘te bokwei o ezalela ya baye bayebi Nzambe te. Bomikomisi mpe bokomisi basusu baombo ba mposa ya mbongo mpe mosolo! Bobwaka ezalela ya boye mosika na bino. Moto na moto amipesa na bolengeli bo ebongi libala likobelema.
- O bomoi bwa libala, mobali na mwasi balingana, basalisana, bazala moto na moto na loboko o boso bwa moninga. Moto na moto alinga bolamu bwa moninga. Ezala o misala ndenge na ndenge bakosala mpo ya litomba lya libala, ezala o mambi ma kofanda mwasi na mobali: moto moko te akitisa moninga o molongo mwa biloko! Komipesa to kopima nzoto esalema mpo ya bolamu bwa moninga, libala mpe libota. Kokweya o boombo bwa mposa ya nzoto te (1, Co 7, 5).
- Baye baponi bomoi bwa libala babosana mpe atâ moke té ‘te libala lizali likambo bakosalaka polele; ezali likambo lya bonkutu te! Lizali bozwi mokano liboso lya bato banso: bato ba mokili mpe Eklezya ya Nzambe. Koyeba mpe ‘te ntina yoko yoko ezalaka na nzela ya bobandi mpe bosukisi bosepeli libala (koponama, boyokani likolo lya mosolo mpe bopesi yango, ...) bakisa mpe mibeko mya Leta. Maye manso makoki kozala base ya bomoi, bakokisa mango malamu. Eklezya ezali mpe na mitindo mya ye (fiançailles, bolengeli libala lisantu, bosepeli Sakramentu). Baye baponi bomoi bwa libala lisantu basengeli kotosa mitindo mîna minso mpo ‘te libala lya bango likelama bo ebongi. Bomoi bwa Eklezya bokofandaka mpe likolo lya loboko la baye balongani, likolo lya libala lisantu.
Lotomo la kobota to kopesa bomoi
- Mobali na Mwasi bakofanda bobele te mpo ya kokokisa mposa ya nzoto to mpo ya kolakisa ‘te bazali moto moko, kasi mpe mpo ya kobota: “O libala Nzambe akosangisa mobali na mwasi na ndenge ‘te bapesa bomoi”. Esengeli ‘te tolimbola liteya linene liye.
- Mpo yango, tosengeli kokundola mateya mabale ma Liloba lya Nzambe. Ya yambo toyeba ‘te na bokeli moto (mobali na mwai), Nzambe akabeli ye makoki ma: kozongisela Ye eyano, koyangela molongo, kokola o boyebi, bongo na bongo (Eb. 1, 26-27). Ya ibale, mobali na mwasi bakokani o makambo manso mpe bazali moto na moto lisungi mpo ya moninga (cf.Eb. 2, 20-24). Mateya maye makopesa biso nzela isato ya bolimboli mabongi ma kobota to kopesa bomoi.
- Ya liboso, kobota ezali lotomo loye Nzambe akabeli balongani bô elembo ya bolingo bwa Ye mpo ya bango. Ezali lokumu lonene akabeli bango: bakoba mosala mwa Ye mwa kokela bato. Mpe akosenge bango ‘te, na boyambi lotomo lôna, bazongisela Ye mpe bolingo. Elingi koloba ‘te akeli bango bo baombo ba kobota te! Ezali lisengi alakisi bango. Akoloba na bango: “Bino baye bolongani, soko bolingi, bokoba kosalisa ngai na komatisa motango mwa bato o mokili”.
- Ya ibale, boyei bwa mwana o libala bosengeli kozala mbuma ya bolingo kati ya balongani: mobali na mwasi bazwi lotomo (mobeko) la kolingana na ndenge ‘te moto to bato bauta na bolingo bôna. Mwana auta na bomipesi kati ya mobali mpe mwasi. Ezali té ‘te moko akomisa moninga wa ye machine ya kobota! Epai esusu, soko balongani baboti te, bakoki kopesa mobeko na Nzambe to na bato té ‘te babota kaka. Mwana akobotama azali lipesi lya Nzambe. Baboti bayeba mpe ‘te mpo ya Nsango Elamu ya Yezu Kristu, kozanga kobota nde nsuka ya mabe te! Soko balongani bameki ndenge inso kobota mpe balongi o yango te, nzela isusu izali ya kolekisa bomoi bwa bango. Ndakisa: kozala moboti wa molimo mpo ya bana basusu ba mboka; kokoma “moboti” na kobokolo bitike; kosalisa baye bakeli lisungi o bomoi . Soko etinda ekoki kozala awa, ezali bobele eye etali bolamu bwa mwana: mwana abotama na bolingani kati ya baboti; bomoto bwa ye bokumisama banda ngonga mama akweli zemi ya ye .
- Mpo ya bosukisi, baboti basengeli koyeba ‘te komatisa motango mwa bato o mokili o nzela ya kobota ezali naino lotomo la bango. Atâko mibeko mitindi ‘te bazwaka lisalisi lya Leta mpe bandeko o yango, ekozala komikosa soko bakanisi ‘te ezali likambo (responsabilité) ya basusu. Mokano motali motango ya bana bakobota motali liboso bango. Basengeli kozwa mokano môna na kotala bolamu bwa bango moko, bolamu bwa mboka to lisanga lya bango, nà bolamu bwa Eklezya. Bakoki kotikela basusu bokokisi lotomo lôna te; bato basusu basengeli mpe te kopekisa bango bakokisa lisengisi lîna (G.S. 50, §2).
Lotomo la kobokolo
- Mpo etali lotomo la kobokolo, balongani basengeli koyeba ntina ya yango malamu. Bokolisi mwana bozali na litomba sôlo. Ezali lisalisi likopesa ‘te mwana amiyeba malamu ut’o bomwana; amilengele bo ebongi mpo ya kokokisa mosala Nzambe akaneli ye; azala mokristu mpe mo-ekolo (citoyen) elombe o makambo manso na ndenge ‘te apesa Eklezya ya biso lokumu. Yango wâna atâko mokolo moko baboti bakotika kobokolo mwana, bakokoba kolinga ‘te mwana alonga o bomoi bwa ye: bakosambela mpo ya lilongi lîna. Mpe tokobakisa ‘te bolingo bwa baboti mpo ya mwana wa bango bozali na motuya koleka bolingo bato basusu bakolinga mwana; bolingo bôna bokosala ‘te mwana akola bo ebongi.
- Baboti basengeli komono o mwana ekelamo eleki ntalo inso: azali liboso mwana wa Nzambe. Yango wâna batindami komemya bomoto to lokumu la mwana. Bakokolo mwana na ndenge ‘te atosa mitindo minso mya Nzambe mpe mitindo mya mboka. Elingi kokoba ‘te bango moko bazala ndakisa ya liboso o mambi mâna. Ezalela ya bango elongobana na maye bakoteya mwana .
- Sekele ya lilonga o lotomo la kobokolo bana ezali: ndenge ya kofanda lisanga o libota! Baboti bakosala manso mpo ‘te libota lizala esika wapi bato bakolinganaka, bakolimbisanaka, bakomemyaka baninga, bakobatelaka loboko o bomoi, kosalisaka moninga na bomiluki te... O libota, mwana akokola o mabongi makokisi bomoi bwa mokristu. Ndakisa: mwana akoyeba komipima mposa inso ya nzoto, mambi ma molimo mazwa esika ya liboso o bomoi bwa ye .
- Na lisalisi lya Sakramentu ya Libala lisantu, baboti bazwi ngrasya ya kosangela bana Nsango Elamu. Bazala bato ba liboso o bokolisi boyambi katoliko epai ya bana. Mwana abanda kobika bo moko wa bana ba Eklezya o nzela ya bobokoli. Baboti babosana mosala mwango te !
- Na bosali bôngo, baboti bakoumela mpe te kozwa bango moko lisalisi likouta na bomipesi bwa bango: bana bakoyokisa bango esengo; kutu bakobondo bango na ndenge ‘te bango mpe bakoba kokola o bomoi bokristu. Libota likozala Eklezya o ntei ya quartier to etuka .
- Ntembe te: lotomo la kobokolo bana lotali bobele baboti te. Mokumba môna moleki nguya mpe makoki ma baboti. Mambi maike masangisami o yango: bokolongolu bwa nzoto, ezalela ya moto o kati ya mboka, mabongi ndenge na ndenge maye bomoi bokristu mpe bwa lisanga bokosenge. Yango wâna balongani to baboti basengeli na lisalisi lya bato basusu: bai libota, balakisi, bandeko ba CEV... tee na lisungi lya Leta mpo ya bomoi bolongobani . Kasi eteni yoko ya bokokisi lotomo etali bobele balongani. Eteni êna euti na lokumu Nzambe apesi bango: makoki ma kopesa bomoi (Eb. 1, 27-28).
II. MIBEKO MYA EKLEZYA O MOBU MOYE
- Lokola mobu C, mobu mwa Liturgia moye Nzambe akabeli biso mokozala mpe eleko ya kokokisa misala to mibeko mya Eklezya. Mibeko mîna mikotala botomboli bomoi bokristu o Dioseze na lisalisi lya mabota ma biso. Libota lyoko lyoko likoma mpenza eteni ya libiki o Eklezya; libota limipesa o bopalinginyi Nsango Elamu. Na bolakisi mibeko to misala. Tokobosana mpe te kobenda makanisi likolo lya makambo to mikakatano o libala.
- Mibeko toponi mitali: 1°) kobalana to bosepeli libala lisantu, 2°) kobota, 3°) komeme mikumba o libala, 4°) kobokolo bana, 5°) libota o bopalinginyi Nsango Elamu.
Bosepeli libala lisantu
- Bosepeli libala lisantu to kokoto o Libala lisantu ekokutana na libaku likasi mpenza epai ya biso. Libaku lîna likopekisa baike o ntei ya biso bakoka kosepela libala lisantu. Mingi mpenza kpokoso yango etali mosolo mwa libala nà masengisi masusu makopesa nzela mpo ya bosepeli libala. Yango ekosalaka ‘te bilenge ebele bakota o libala na bosepeli libala lisantu te! Mosolo likolo lya mwasi (dot) moleki makoki ma mobali mpe libota lya ye. Kpokoso ya boye ekobenda mpe mindondo misusu. Ndakisa: o Dioseze ya biso, mobeko motali batisimo ya bana bake mokotinda ‘te tobatisa bobele, mpo ya baboti bakuli naino libala lisantu te, bana babale ba yambo. Nzokande baboti bakristu baike baye bakuli libala lisantu te bazali na bana ebele baye bakosepela kobatisa bango, kasi bazangi makoki ma kofuta mosolo mwa libala mpe bakoki kobala libala lisantu te. Epai esusu Eklezia ekoki mpe kondima kobatisa mwana wa isato te (cf. Directoire Diocésain des Sacrements). Bana bake bakozanga kokoma bana ba Nzambe mpo ya mosolo mwa libala. Tata na Mama bakozanga kokula basakramentu se mpo ya mosolo mwa libala. Eklezia mpe ekozanga makoki ma kokulisa basakramentu ya libala mpe batisimo mpo ya mosolo mwa libala. Na bana, na baboti na mpe Eklezya, biso banso tokoti o boloko bwa baboti baye bakolekisa ndelo o bosengi mosolo mwa libala. Kutu baboti ebele bakosalaka bongo bazali bakristu. Yango wana nakosenge na bino baboti bakristu: mposa ya mosolo etinda bino te kopekisa basusu bakutana na Kristu. Mpe bosalaka te ‘te mpo ya bino basusu bazonga nsima o boyambi bwa bango.
- Misala ndenge na ndenge mikoki kolengelama awa:
- Boyokani mpo ya kokitisa motuya mwa mosolo mwa libala:Vicaire Episcopal mpe bacuré ba Région ba ye bakoki kolengele bokutani likolo lya likambo lyango. Bakosangisa nguya mpe makanisi ma bango na bandeko ba société civile. Batala penepene mitindo mya kobalana ya ntina yoko yoko. Baluka elongo na bai mboka nzela ya kokitisa mosolo mwa libala: ezala koteka to kosomba moto te. Basala campagne ya sensibilisation na ntina ‘te bakristu ba biso bazala bato ba liboso na kotosa mokano mokozwama.
- Tokoyebisa bino mpe ‘te Mobeko mwa Leta o Ekolo ya biso mopesi ndingisa ya bosepeli libala atâko bapesi mosolo mwa libala nyoso te; molobi kutu ‘te mosolo ya kopesa mosengeli kozala lifuta te, kasi mozala elembo (symbolique) . Bongo Eklezya akoyamba o libala lisantu baye basilisi kopesa mosolo mwa libala. Nzokande ekoyamba mpe baye bapesi eteni yoko ya mosolo mwa libala mpe bandimi, o miso ma batemwe, kosilisa mwango.
- Paroisse na paroisse iluka nzela ‘te libala lisantu lizala na nkembo o Mobu mwa Litugia A: bosepeli libala lisantu mpe ba-anniversaires ya yango, bosali récollection, retraite, bokutani bwa losambo...
- Kotanda manaka ma ba-animation ya bobyangi o libala mpe o bomoi reliziozo to o bonganga o baquartier, bituka, baCEV.
- Soko boyokani bozwami likolo lya mosolo mwa libala, kasi boko bakristu baboyi kotosa bwango, bacurés balekisela Episkopo likambo lya bango mpo ‘te atala lyango penepene.
Kobota
- Tomonaki mwa liboso ‘te kobota ezali lotomo la ntalo mpenza! Nzambe moto akabeli mpe akokabola lyango na baboti. Bomoi bwa moto boleki matomba masusu manso ma mokili (bozali sacrée!). Baye balongobani kobota bobele bato basepeli libala lisantu. Soko tokanisi kopona lotomo la kobota bo mobeko ya kokokisa o Mobu mwa Liturgia A, ezali na ntina. Mimeseno mibe mya bikolo bisusu mizali kokoto o Ekolo ya biso. Ndakisa: bakoseli bakopanza nsango ‘te mwana o libumu lya mama azali bobele nzoto ya mwasi wâna; ye akoki kosopa zemi, kosala avortement. Likambo lya nsomo! Babosani to bayebi té ‘te avortement ezali koboma moto, atâko esalemi nsima ya seconde ya kokweya zemi. Mwasi asopi zemi nà oyo asalisi ye, soko bazali bakristu kotoliko, bamibimisi na Eklezya (bakwei o lisumu ya excommunication). Sango akolimbisa lisumu lîna bobele Papa wa Roma to Episkopo mpe mbele bobele sango bapeseli ye ndingisa ... Mimeseno misusu mibe mikoki koutisama epai ya biso mikomemisela bamama mokumba kilo koleka: bakozanga lisusu esengo ya kobota; boboto bolongwi epai ya bango! Yango elingi mpe koloba ‘te kimya ezangi o libota! Mwana o libumu lya mama akokola o libota lizeli ye te!...Bololo bwa nkanda ya bato bokozwa ye ut’o libumu lya mama.
- Misala:
- Mokristu abimisi zemi to asalisi moninga o yango ayeba ‘te bobele Episkopo moto akosalisa ye o Ntubela, to sango Epispoko akotinda. Bacuré banso, o Mobu moye mwa Liturgia, bapanza liteya lye epai ya bakristu ba bango. Bakebisa bakristu likolo lya likambo lya boye.
- O Mobu moye, tokokisa mpe milulu mikolakisa lokumu la kobota mpe la lotomo lokangemi na yango: bolengeli bo ebongi mbotama ya mwana o ba-CEV, ba-quartiers, bituka .
Komeme mikumba o libala
- Mambi mayike malakisaka ‘te boko baboti bazangi momeseno ya komeme mikumba mya bango! Ekoki kozala mpo ‘te balengeleki bango malamu te mpo ya libala: bolengeli o nzela ya bobokoli mpe o eleko ya fiançailles! Ezangi bango: komeme bo ebongi mokumba ya koleisa malamu, kosunga libota na misala ndenge na ndenge. Epai esusu, ndenge tomonaka, Leta moto azangaka kokokisa lotomo la ye: politiki ya botomboli économie ezali mabe, kozanga kokolisa kimia, kofuta balakisi malamu te, komeme mikumba mya biteyelo bya ebandela bo ebongi te (cf. Article 34, 41, 45 ya Constitution).
- O niveau ya Région pastorale, Doyennés, ba-paroisses mpe ba-CEV, ba-mouvements ya Eklezya ya biso: kosala campagne ya responsabilisation likolo lya mikumba mya baboti. Paroisse na paroisse aluka nzela ya kozala na ba-animateurs ba ye likolo lya bomoi o libota. Mpe ba-animateurs bâna balengele sessions ya kosala. Bamama ba foyer social bazali na mosala mpe wâna! Mpo etali responsabilité ya Leta: ba-Commission Bosembo mpe Boboto (Justice et Paix) ya Dioseze, Région pastorale, Doyennés mpe ba-paroisses basalisa na bokolisi mabongi ma Etat de droit epai ya bayangeli nâ bakristu ba biso mpo ya kosukisa kpokoso inso tolobi mpo na yango awa.
Kobokolo bana
- Kobokolo bana ezali lotomo la motuya mpe la makasi baboti basengeli kokokisa. Bana bazali elikya ya biso mpo ya lobi. O Mobu moye baboti bamipesa mpo ya kozongisa bango o nzela eye elongobani. Mpamba ‘te, soko tokotala malamu, bana ebele bakokola o nzela eye elongobani te: bakoyoka, bakotosa mpe bakobanga baboti mpe bakolo te; balingi mosala mwa maboko te, kasi bobele kosengesenge; bakosalisaka baboti te; basusu bakolangwa kutu masanga ma sachet to lotoko; balingi se koyengayenga; ebele bakosambelaka te; basusu bakosalaka bonsoni, bongo na bongo. Na bokuse, bana ba biso bazali kobunga. Bongo, tokosenge na baboti basalisa bango mingi mpo ‘te batika bizaleli biye bya mabe.
- Mpe lokola tolobaki, mosala mwa kobokolo mozali bobele mosala mwa baboti bango moko te, mozali mpe mosala mwa société mobimba. Yango wana, tokosenge na ba-CEV, biteyelo, ba-paroisses, ba-doyennés, na mpe Commission Diocésaine de l’Education chrétienne, basalisa baboti o mosala moye. Bipai binso, balengele ba-sessions likolo lya mabongi ma bomoto mpe bomoi bokristu mpe likolo lya éducation à la vie. Baboti bayeba kosala contrôle ya éducation sexuelle eye bana ba bango bakozwa epai ya bato basusu . Equipe ya pastorale sanitaire esalisa bakristu nà bana ba biso banso na mateya ma bokolongonu bwa nzoto mpe likolo lya mambi makobenda maladi.
Libota o bopalinginyi Nsango Elamu
- Na motuna mpo ya koyeba ndenge kani mabota ma biso bamipesi o bopalinginyi Nsango Elamu ya Yezu Kristu, eyano nini ekoki kozwama? Na bosôlo mpenza, tokondima bobele ‘te bomipesi bwa mabota o mosala mwa koteya Nsango Elamu bozali naino ndambo mpenza. Nzokande mabota makoki kosalisa mingi mpenza o mosala mwango.
- Animation to pastorale familiale ya ndenge wâna esengeli mpe kozwa esika o Mobu mwa Liturgia eye. Animation o kati ya ba CEV etali mabota moko na moko, batata kati ya bango, bamama kati ya bango, bana babali mpe bana basi se bôngo. Ndakisa ya thème ya animation: bomoi bosantu o mabota... Ekotinda ‘te: bato basambela esika yoko, bayoka mpe bateya Nsango Elamu, bamipesa na misala mya bolingo, bafanda lisanga mpo ya bosepeli bomoko; bakanisa kosalisa mabota masusu o Région pastorale, o Dioseze, kutu o bisika bisusu o Ekolo to mokili. Ntembe te: na bosali bôngo, mabota ma biso makokola ya solo o ezalela kitoko, ezalela ya kokumisa Nzambe! Mpe makosalisa o bopalinginyi Nsango Elamu ya Yezu Kristu.
BOSUKISI
39. L o s a m b o
Mwana-Yezu, Mama Santu Maria, Tata Santu Yozefu,
Bino baye bobikaki bo ebongi mobombamo moleki bonzenga
ya Libota Lisantu!
Santu Maria mpe Santu Yozefu,
Bino baye bolakisi ndakisa ya ntalo mpenza
O bobiki bo Balongani!
Bosambelela balongani ba lelo mpe ba lobi o Dioseze ya biso:
Mikakatano ya ndenge inso mikopekisa ‘te babika engebene
ya Nsango Elamu milongwa nye!
Baboti nà bana o Dioseze ya biso
bakola seko o Bosato Bosantu bwa Nzambe. Amen.